KOKOMISA NKOMBA NA ICE

Soki olingi kokomisa nkombo na Immigration and Customs Enforcement (ICE), yeba ndenge ya kokomisa nkombo na ICE na Maine.


ICE ELINGI ELOBA NINI?

Immigration and Customs Enforcement (ICE) ezali ebongiseli ya gouvernement ya Etats-Unis oyo esalaka ete mibeko ya immigration ekokisama. Basalaka lokola “bapolisi” ya immigration.

Mbala mingi ntango ICE ebimisi moto na bokangami ya immigration, bazwaka mokano ya kokoba kolandela moto yango. Suivi oyo ekoki kosalema na ndenge ndenge, na kati na yango na nzela ya ba bracelet électronique, ba rendez-vous de contrôle en personne, ba visite na ndaku, to ba contrôle na nzela ya téléphone to courriel.


NDENGE NINI NAKOKI KOKOMISA NKOMBO NA ICE NA MAINE?

Soki esengeli okota na ICE na Biro ya ICE ya Scarborough Maine, okoki kobenga 207-396-5000 to kotinda email na ICE na ICE-ERO-POM-Reporting@ice.dhs.gov. Awa na nse ezali na malako mpo na kokota na ICE.

Soki ozali na rendez-vous en personne, adresse ya Biro ya ICE ya Scarborough Maine ezali:

40 Manson Libby Road
Suite 101
Scarborough, ME 04074

Mise à jour ya guide: Sanza ya Yambo 2022


NDENGE NINI NAKOKI KIMIBATELA NA BA FRAUDE YA IMMIGRATION?

Keba ntango ozali kozwa lisalisi na likambo na yo ya immigration! Keba na bato na Maine oyo balukaka kokosa yo na kosala lokola bazali kosalisa na makambo ya immigration. Bato oyo bakoki koyiba mbongo na yo mpe kosala likambo na yo ya immigration mabe.

Lolenge malamu ya komibatela ezali ya kozala na sango na ntina ya maye bato oyo basalaka mpe kozala na bokebi mpo na nani opesi nzela ya kosalisa na likambo na yo ya immigration.


Biloko ya ILAP oyo ezali na lokasa oyo esalemi na baavoka mpe ba représentant oyo bazali na ndingisa, kasi ezali te esika ya toli ya mibeko.



SUNGA BISO TOBONGISA KOLEKA!