KOSENGA RENDEZ-VOUS NA ILAP

Yekola ndenge nini kosenga rendez-vous na ILAP mpe lolenge nini ya makambo ya immigration ILAP ekoki kosalisa.


NDENGE NINI NAKO SENGA RENDEZ-VOUS NA ILAP?

Bobenga numero oyo elandi (207) 780-1593 ext. 4 sima botika message to pe liloba na bino po te bayoka binoeave a voicemail message.

Bopesa kombo na bino na ndenge ya complet, contact na bino na ndenge bakoki kobenga bino lisusu, pe bopesa na ndenge y maloba muke mikakatano to pe probleme na ndenge ya mibeko bozali na yango.

Tokobanda kosala programme ya elaká na ebandeli ya sanza nyonso mpe tokokoba kondima ba demandes sánzá nyonso kino bilaká na biso ekokisama mpo na sánzá.

Tosengi na yo óyeba ete: ILAP elingi ekutanisa ba immigrant ebele ya Maine na lisungi ya mibeko na kolandela makoki. Tozali lingómbá muke oyo ezwaka bosenga ya sika ebele mposo nyonso mpe tozali na makoki te ya kosunga bato nyonso. Disponibilité ya elaká ya boyambi mpe lolenge ya dossier oyo tondimi ekoki kokesana kolandana na mbongwana na mibeko mpe politiki ya immigration, motango ya makambo oyo ezali ya basali na biso ya mibeko, mpe motango ya bato oyo bazali kosenga lisalisi.

Matondo mingi mpo na motema molai mpe bososoli na bino! 


Ntango nini nakoki kokutana na ILAP mpo na kozwa biyano na mituna ya nokinoki ya boyei ya bato na mboka mopaya?

Boya na bureau ya ILAP na Portland na jeudi 23 mai entre 10:00 na 12:00 na 489 Congress Street 3ème étage, Portland, ME 04101

TO

Boya kokutana na ILAP na Lewiston Adult Education na jeudi 16 mai entre 1:00 na 2:30 na 145 Birch Street, Lewiston, ME 04240 (na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi ya ndako yango)


Akoki kondimama pona kozwa lisalisi ya ILAP?

ILAP esungaka kaka na mituna ya mibeko ya immigration. Ba services na biso ezalaka ya ofele to ya ntalo moke. Tosungaka baye oyo bavandi ya Maine oyo bazali na mosolo moke mpe ba oyo bakoki kozwa avocat te. Bakotuna yo mituna mpona likambo etali bozwui ya ndako na yo mpo na kosenga elaka.

Soki ozali koluka lisalisi ya immigration, kasi oyebi ete oleki ndelo ya bozui, okoki kokomela biso na info@ilapmaine.org to benga biso na 207-780-1593 mpe tokoki kopesa líst ya ba avocats privé ya immigration na Maine.

ILAP ezali kaka na makoki ya kosalela bato oyo bafandaka na Maine. Soki ofandi na etuka mosusu, tosengi okende na site internet na biso Bokutana na bibongiseli mosusu mpo na koluka bisika ya misala na esika ofandi..


Ba dossier ya lolengi nini ya immigration ILAP ekoki kosunga yo nango?

ILAP ezali sikóyo kondima boséngi pona kozwa elaká na cas misusu ya immigration mpona ba immigrants oyo bafandaka na Maine mpe baye bakoki kozwa avocat te. Tokoki kosalisa yo soki:

ELENGE NA SE YA MBULA 21 NA MBOKA YA AMERIQUE

  • Okokisi naino mbula 21 te MPE babóti ba yo nyonso mibalé bazali kosunga yo te awa na mboka ya Amerique

VICTIME/BABIKI NA VIOLENCE

  • Ozali na mikanda ya immigration te MPE ozali koniokwama to obika na violence domestique, likambo ya mombongo ya bato to mbeba mosusu ya makasi oyo esalemaki na mboka ya Amerique

  • Ozali koniokwama to obiki na violence domestique kowuta epayi ya molongani, babóti to mwana na yo, oyo azali mwana mboka ya Amerique to mutu oyo azali na green carte

TRIBUNAL YA IMMIGRATION

  • Esengeli ofungolisa lisusu dossier na yo na Tribunal ya Immigration

  • Esengeli okende na dossier na yo na Tribunal ya Immigration ya Lowell

  • Ozali na case to pe likambo na tribunal ya immigration MPE ozali na kondima ete bakoki kolongola ekateli ya deportation na yo to Nicaraguaan Adjustment and Central American Relief Act (NACARA)

  • Lisusu, ILAP azali na makoki ya kobongisa mikutano mike pona baye basengi asile na ba dossier nakati ya Tribunal ya Immigration. Mpo na koyeba soki tokoki kosunga, basali ya ILAP bakotuna yo mituna mpona likambo etali mikolo ya suka ya kotinda ba dossiers mpe mikolo ya kosamba

MIKANDA YA MOSALA

  • Ozali na nse ya mobeko MPE ozali na mposa ya kosalisa mokanda ya mosala ya sika

  • Ozuaki ekateli MPE esengeli osenga to osenga lisusu mokanda ya mosala

  • Ozali na DACA to TPS kasi esengeli osenga na mokanda na yo ya mosala na ndenge ya sika

  • You are in the U.S. as a parolee from one of these countries:

    • Ukraine

    • Venezuela

    • Cuba

    • Haiti

    • Nicaragua

Finá awa pona koyeba makambo mingi na maye bitali ya mikanda ya mosala y aba refugie to mokimi mboka.

GREEN CARTE (RESIDENE PERMANENTE)

  • Ozali na visa ya categorie U to T ya mbula misato MPE olingi kosenga Green Carte

  • Ozali refugé MPE olingi kosenga Green Carte sima ya kofanda na mboka ya Amerique mbula moko to koleka

  • Bapesaki yo asile esi eleki mbula moko MPE olingi kosenga Green Carte

  • Esengeli kozongisa to pe koremplacer Green Card na yo

  • Ozali na Green carte ya mbula 2 mpe ozali na mposa yakolongolisa ndelo mpo na kozwa Green Carte ya mbula 10 MPE ozalaki abuser na molongani na yo to okabwání na molóngani na yo

KOSENGA PONA LIBOTA

  • Kala mingi te bapesaki yo asile MPE olingi kobengisa na Amerique molongani to mwana na yo oyo azali nase ya mbula 21

  • Kala mingi te okotaki lokola regufé MPE olingi kobengisa na Amerique molongani to mwana na yo oyo akokisi naino mbula 21

  • Molongani na yo to pe mwana na yo oyo azali na moins de 21 ans pe olingi koenga que akuta yo awa na Etats Unis:

    • Ukraine

    • Venezuela

    • Cuba

    • Haïti na mboka

    • Nicaragua

BOMWANA-MBOKA YA AMERIQUE

  • Oza na mposa ya kosenga certificat ya bomwana-mboka (citoyenneté) mpo okoma mwana mboka na nzela ya moboti na yo

ASILE

  • Olingi kosenga asile MPE ozali na dossier na Tribunal ya Immigration te MPE otikali na sanza 5 kino 12 mpona kosala bosengi yambo ndelo ya mbula moko eleka

  • Lisusu, ILAP azali na makoki ya kobongisa mikutano ya lináka ya motángo muke ya ba consultations pona baye basengi asile na ba dossier na Tribunal ya Immigration. Mpo na koyeba soki tokoki kosunga, basali ya ILAP bakotuna yo mituna mpona likambo etali mikolo ya suka ya kotinda ba dossiers mpe mikolo ya kosamba

STATUT YA BOBATELI YA NGONGA EKE (TPS)

ACTION DIFFÉRÉE POUR LES ARRIVÉES ENFANTS (DACA)

  • Ozali na mposa ya kosenga lisusu DACA (Action Différée pour les Arrivées enfants)

MOSUSU

  • Ozali na statut ya kofanda libela na Amerique te mpe olingi koyeba soki ozali na ba options ya kotikala na Ameriquei mpo na libela

  • Ozwaki bosengi ya kobakisa ba preuves na dossier oyo ILAP asungaki yo na yango MPE otikali na mikolo ata 30 mpo na koyanola

  • Olingi ososola ba conséquence ya ba mbeba na yo ya kala na statut na yo ya immigration

Ata soki motuna na yo ya mibeko ekomami likoló, mbala mosusu tokokoka kosunga yo te.


Soki kasi nayebi koloba anglais te?

ILAP azali na service ya interprétation pona ba appels nyonso ya téléphone to ya internet (Skype, Zoom, Whatsapp etc.) Soki oyebi Anglais, Français, Portugais, Lingala to Espagnol te okoki kobenga biso pona elaká na 207-780-1593, fina 0, sima finá lisusu 0, na nsima tika message oyo ezali na monoko na yo mpe numero na yo ya telefone mpe tokobenga yo na mobongoli maloba (interprete). Okoki mpe kotindela biso e-mail na info@ilapmaine.org.


Lisungi nini ezali na ILAP?

Soki ozali na libaku ya kozwa lisungi ya ILAP mpe osilisi kozwa elaka ya kondimama, basali ya mibeko to ba volontaires bakoki ko:

  • Kutana na yo mpo na koyanola na mituna mpe kopesa yo toli na ntina ya mibeko ya processus ya immigration ya Amerique mpe na status nayo ya immigration.

  • Kosunga yo kosala formulaire ya immigration mpe ba demandes, mpe kopesa yo toli na ndenge ya kozwa mikanda oyo okozala na mposa ya kotinda na kati na ba formulaire oyo.

  • Na makambo mosusu, kotelemela yo na bureau ya Immigration to na Tribunal ya Immigration.

Lokola tozali na makoki moke, ILAP ekokoka kosunga te bato na ba visa ya mosala to ba visas ya kelasi awa na Amerique. Tokokoka mpe kosalisa te na makambo ya mibeko oyo etali ba non-immigrant; tosengi na yo okota na site internet na biso Bokutana na bibongiseli mosusu pona ba services misusu ya mibeko na Maine.

Ba services nionso ya ILAP ezali kaka na rendez-vous.


NDENGE NINI NAKOKI KIMIBATELA NA BA FRAUDE YA IMMIGRATION?

Keba ntango ozali kozwa lisalisi na likambo na yo ya immigration! Keba na bato na Maine oyo balukaka kokosa yo na kosala lokola bazali kosalisa na makambo ya immigration. Bato oyo bakoki koyiba mbongo na yo mpe kosala likambo na yo ya immigration mabe.

Lolenge malamu ya komibatela ezali ya kozala na sango na ntina ya maye bato oyo basalaka mpe kozala na bokebi mpo na nani opesi nzela ya kosalisa na likambo na yo ya immigration.



SUNGA BISO TOBONGISA KOLEKA!