Permis Ya Mosala Ya Asile

Soki osi osengi demande d’asile, yekola na ntina ya kosenga mokanda ya mosala (I8) mpe kozongisa sika mokanda na yo ya mosala c(8).


Na sengi demande d’asile. Nakoki kozua permis ya mosala?

Sima ya kosenga demande d’asile, okoki kosenga mokanda ya mosala sima ya mikolo 150. Mokanda yango ebengami mokanda ya mosala (I8).


Nani akoki kosalisa ngai na senga permis ya mosala (i8) na maine?

Na nse ezali na bibongiseli oyo esalisaka bato oyo bazali koluka demande d’asile na kotondisa ba demande ya ndingisa ya mosala.

Mabongisi yango ekoki te kopesa toli ya mibeko. Bapesaka lisalisi mpo na kotondisa mwa baformulaire oyo etali kokota na mboka mopaya.

Benga Hope Acts mpo na kosenga rendez-vous.

Benga Centre Trinity Jubilee mpo na kosenga rendez-vous.


Ndenge nini nakoki kosenga permis ya mosala (i8) ngai moko?

Awa na nse ezali na malako mpo na kotondisa bosengi na yo ya permis ya mosala.

Soki osengaki permis ya mosala mpe ozwi te récépissé ya bosengi na yo ya permis ya mosala mikolo 30 nsima ya kotinda yango, okoki kokutana ba service de citoyenneté mpe ya immigration ya Etats-Unis (USCIS) na 1-800-375-5283 mpo na kolanda dossier na yo.

Mise à jour ya vidéo:Sanza ya mitano 2021


Ntango nini nasengeli na senga mpo na kosalisa (i8) permis na ngai ya mosala?

Soki osengeli kozongisa sika mokanda na yo ya mosala ( I8), ILAP epesi toli ete osenga kozongisa sika mokanda na yo ya mosala sanza 6 (mikolo 180) yambo ete mokanda na yo ya mosala ya lelo esila.


Nazali na ndingisa ya kobakisa permis na ngai ya mosala automatiquement tango nazali kozela permis ya sika?

Na mokolo ya 4 Mai 2022, USCIS esakolaki ete mikanda mosusu ya mosala, bakisa mpe (I8) permis ya mosala oyo esalemi na nzela ya bosengi ya demande d’asile oyo ezali kozela, ekozala sikoyo na makoki ya kobakisama automatiquement ya ndingisa ya mosala kino mikolo 540.

Mpo na kokokisa masengami mpo na bobakisi oyo ya automatique, esengeli opesa bozongisi sika ya mokanda na yo ya mosala (I8) yambo ete mokanda na yo ya mosala ya lelo esila. Politiki oyo ekozala na nguya tii ata mokolo ya 26 octobre 2023.


NDENGE NINI NAKOKI KIMIBATELA NA BA FRAUDE YA IMMIGRATION?

Keba ntango ozali kozwa lisalisi na likambo na yo ya immigration! Keba na bato na Maine oyo balukaka kokosa yo na kosala lokola bazali kosalisa na makambo ya immigration. Bato oyo bakoki koyiba mbongo na yo mpe kosala likambo na yo ya immigration mabe.

Lolenge malamu ya komibatela ezali ya kozala na sango na ntina ya maye bato oyo basalaka mpe kozala na bokebi mpo na nani opesi nzela ya kosalisa na likambo na yo ya immigration.


Biloko ya ILAP oyo ezali na lokasa oyo esalemi na baavoka mpe ba représentant oyo bazali na ndingisa, kasi ezali te esika ya toli ya mibeko.



SUNGA BISO TOBONGISA KOLEKA!