Tribunal Ya Immigration

Yekola na ntina ya tribunal ya immigration. Luka ba ressource soki ozali na likambo na tribunal ya immigration mpe ozali na avocat te.


Ndenge nini nakoki koyeba soki nazali na likambo na tribinale ya immigration?

Soki okotaki na Etats-Unis kozanga visa mpe bakonzi ya immigration batelemisaki yo mpe bapesaki yo mikanda, okoki kozala na likambo na tribunal ya immigration. Soki ozwaki liyebisi ya kosamba (NTA) to Mobeko ya kobimisama mpo na kondimama, mbala mosusu ozali na likambo na tribunal ya immigration. Wana ezali kaka bandakisa. Ezali na ndenge mingi oyo bato basukaka na makambo na tribunal ya immigration.

Video oyo ezali kolimbola ndenge ya kosala makambo na tribunal ya immigration.

Mise à jour ya vidéo: Sanza ya zomi na moko 2020


Ndenge nini nakoki koyeba makambo etali likambo na ngai na tribinale ya immigration?

Soki ozali na likambo na tribunal ya immigration, okoki koluka mokolo ya audience na yo ya sima mpe ba information misusu na kobenga nimero ya Tribunal ya Immigration to na kotalaka site internet ya ba information ya makambo ya Tribunal ya immigration. Awa na nse ezali na malako mpo na koluka makambo yango.

Mise à jour ya guide: Sanza ya zomi na mibale 2022


NA WUTI NA NDAKU MOKO NA KENDE NA NDAKU MOSUSU. NASALA NINI?

Lokola okozwa ba messages ya ntina uta na gouvernement ya Etats-Unis na nzela ya poso, esengeli oyeba soki USCIS mpe/to tribunal ya immigration eyebi adresse postale na yo ya lelo. Esengeli kaka te o changer adresse na yo na nzela ya Poste!

Yekolá ndenge ya kobongisa adresi na yo.


Ndenge nini nakobongola tribunal na ngai na tribunal ya immgration ya Lowell?

Soki ofandi na Maine, tribunal ya immigration oyo ezali pene ezali Tribunal ya immigration ya Lowell. Soki olingi kobongola tribunal na yo na tribunal ya immigration ya Lowell, ekosenga osala Motion to mpo na kobongola esika. Kobongola adresse na yo eko changer mbala moko te tribunal na yo.

ILAP ekoki kosalisa yo obongola tribunal na yo na Tribunal ya Immigration ya Lowell.

Soki okoki koya na bureau na biso ya Portland te, okoki kosenga rendez-vous na ILAP mpo na kozwa lisalisi ya kobongola tribunal na yo.


Nini ekokomela nga na mokolo ya liboso ya kosamba na tribunal ya immigration?

Soki ozali kokende na audience na yo ya liboso ya tribunal ya immigration mpe ozali na avocat te, esengeli omibongisa. Awa na nse ezali na sango na ntina ya nini okoki kozela na boyokani na yo ya yambo mpe malako mpo na bato oyo bazali kokende na Tribunal ya Immigration ya Boston mpo na mbala ya yambo.

Mise à jour ya guide: Sanza ya zomi na mibale 2021

Mise à jour ya vidéo: Sanza ya yambo 2021


NDENGE NINI NAKOTIKA DEMANDE D’ASILE NA NGAI NA TRIBINALE YA IMMIGRATION?

Soki ozali na likambo na tribunal ya immigration, ekosengela kotinda demande d’asile na tribunal yango.

Na nse ezali na malako na ndenge ya kotinda bosengi na yo ya kobombana na mboka mopaya soki ozali na likambo na tribunal ya immigration.


Nani akoki kosalisa ngai na tribunal ya immigration ya boston?

BA ORGANISATION CARITATIVES CATHOLIQUES YA BOSTON – BUREAU YA LISANGA YA TRIBUNAL YA IMMGRATION

Bureau d’aide ya Tribunal ya immigration (ICH) epesi:

  • Lisalisi ya ofele mpe sango ya mibeko na ba immigré oyo bazali na avocat te na Tribunal ya Immigration ya Boston.

  • Boyebisi ya ofele na ntina ya misala ya esambiselo, ndenge ya kosala, mpe sango ya monene na ntina ya banzela oyo etali lisungi mpe bobateli na bolongoli, mpe biloko mosusu oyo etali yango.

ichadmin@ccab.org

617-464-8000

Mise à jour ya: Sanza ya mitano 2022


NDENGE NINI NAKOKI KIMIBATELA NA BA FRAUDE YA IMMIGRATION?

Keba ntango ozali kozwa lisalisi na likambo na yo ya immigration! Keba na bato na Maine oyo balukaka kokosa yo na kosala lokola bazali kosalisa na makambo ya immigration. Bato oyo bakoki koyiba mbongo na yo mpe kosala likambo na yo ya immigration mabe.

Lolenge malamu ya komibatela ezali ya kozala na sango na ntina ya maye bato oyo basalaka mpe kozala na bokebi mpo na nani opesi nzela ya kosalisa na likambo na yo ya immigration.


Biloko ya ILAP oyo ezali na lokasa oyo esalemi na baavoka mpe ba représentant oyo bazali na ndingisa, kasi ezali te esika ya toli ya mibeko.



SUNGA BISO TOBONGISA KOLEKA!